Banzembo 150

Bokumisa Yawe! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi! Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo! Bokumisa Ye na lokito ya kelelo; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda! Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite! Bokumisa Ye na lokito ya manzanza! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene! Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。