Banzembo 124

Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te; tika ete Isalaele aloba bongo! Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso, mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi. Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso. Mayi makasi elingaki kozindisa biso. Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso! Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke; motambo ekatanaki, mpe tokimaki. Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。