Banzembo 125

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela. Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela. Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe. Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema! Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe! Tika ete kimia ezala na Isalaele!

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。