Banzembo 134

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo. Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe! Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele!

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。