Banzembo 114

Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya, Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye. Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima, bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba. Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima? Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba? Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi, oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。