Banzembo 121

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi? Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te! Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo. Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te! Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo; Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

订阅我们的新闻通讯

及时了解新的资料页、活动与平台更新。