Banzembo 67

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi: nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye; mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso. Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo! Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele. Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo! Mabele eboti bambuma na yango; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. Tika ete Nzambe apambola biso; tika ete mokili mobimba etosa Ye!

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

Subskrybuj nasz newsletter

Bądź na bieżąco z nowymi profilami, wydarzeniami i nowościami platformy.