1Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Yawe! Bino bato ya mabota nyonso, bopesa Ye nkembo! 2Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene, mpe bosembo ya Yawe ewumelaka seko na seko. Bokumisa Yawe!