Banzembo 93

Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali. Yawe, bibale egangaka! Bibale etombolaka lokito na yango; bibale etombolaka makelele na yango. Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene. Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

Abonneer op onze nieuwsbrief

Blijf op de hoogte van nieuwe profielen, evenementen en platformupdates.