Banzembo 126

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto. Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo: « Yawe asaleli bango makambo minene! » Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela. Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi. Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo. Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

Abonneer op onze nieuwsbrief

Blijf op de hoogte van nieuwe profielen, evenementen en platformupdates.