Banzembo 3

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye. Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai! Ebele bazali koloba na tina na ngai: « Nzambe akobikisa ye te! » Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai. Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule. Nalalaka mpe nazwaka pongi; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai. Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso. Yawe, telema! Nzambe na ngai, kangola ngai! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu. Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

뉴스레터 구독

새로운 프로필과 행사, 플랫폼 소식을 받아 보세요.