Banzembo 123

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe, oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola. Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu. Yawe, salela biso ngolu, yokela biso mawa! Pamba te tolembi kotiolama! Tolembi penza kotiolama na bato ya lolendo mpe ya lofundu!

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

Abonner på nyhetsbrevet vårt

Hold deg oppdatert på nye profiler, arrangementer og plattformnyheter.