Banzembo 82

Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe. Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe? Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola; bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe. Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili; miboko nyonso ya mokili ezali koningana. Nalobaki: « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo! » Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi. Nzambe, telema, sambisa mokili; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

Lingála Bible

copyright © 2020 Biblica, Inc — CC-BY-SA-4.0 — CC-BY-SA-4.0

Iscriviti alla nostra newsletter

Resta aggiornato su nuovi profili, eventi e novità della piattaforma.